Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 12:20 - Mokanda na Bomoi

20 Nzokande, « Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei ; soki azali na posa ya komela mayi, pesa ye mayi. Pamba te, soki osali bongo, okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 12:20
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi apesaki mitindo ete batondisa ble na basaki na bango, bazongisa mbongo ya moto na moto na saki na ye mpe bapesa bango bilei mpo na nzela. Esalemelaki bango bongo.


Elize azongisaki : — Koboma bango te ! Boni, okoboma solo bato oyo okangi, na nzela ya mopanga na yo to ya tolotolo na yo ? Pesa bango nde bilei mpe mayi ya komela mpo ete balia, bamela mpe bazonga epai ya mokonzi na bango.


Akobeta yo na makonga ya elombe ya bitumba, oyo ezali ya songe, elongo na makala ya moto ya nzete ya nzube.


Tika ete pasi oyo bibebu na bango esili kobongisa ekweyela bato oyo bazingeli ngai.


Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.


Kasi, na bino oyo bozali koyoka Ngai, nalobi : Bolingaka banguna na bino mpe bosalelaka bayini na bino bolamu.


Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi lukaka nde kolonga mabe na nzela ya kosala bolamu.


Boye Saulo alobaki : — Solo, nasali masumu ! Davidi, mwana na ngai ya mobali, zonga ! Mpo ete omonaki ete bomoi na ngai ezali motuya, nakomeka lisusu te kosala yo mabe. Nasalaki penza lokola moto ya liboma mpe napengwaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ