Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 12:19 - Mokanda na Bomoi

19 Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 12:19
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kolobaka te : « Nakozongisa mabe na mabe oyo basali ngai ! » Kasi talela Yawe, mpe akobikisa yo.


Kolobaka te : « Nakosala ye ndenge asali ngai, nakozongisela ye kolanda makambo oyo ye asali. »


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala, nakozwa likambo na yo na maboko mpe nakozongisa mabe na bato oyo basalaki yo mabe, nakokawusa ebale na yango ya monene mpe nakokawusa maziba na yango.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola bato ya Edomi bazongisaki mabe na mabe epai ya libota ya Yuda, mpe lokola bamemaki penza ngambo wana basalaki bongo ;


Okozongisa mabe na mabe te to okobombela moko kati na bato na yo kanda te, kasi okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. Nazali Yawe.


Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Botelemelaka te moto mabe ; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi.


Bopambolaka bato oyo banyokolaka bino ; iyo, bopambolaka, kasi bolakelaka mabe te !


Bozongisaka mabe na mabe te. Bolukaka kosala makambo ya malamu na miso ya bato nyonso.


Pamba te mokonzi azali mosali na Nzambe mpo na bolamu na yo. Kasi soki ozali kosala makambo ya mabe, banga mokonzi, pamba te asimbaka mopanga na pamba te. Azali mosali na Nzambe mpo na kokokisa kanda ya Nzambe mpe kopesa etumbu epai ya bato oyo basalaka mabe.


Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »


Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye ! Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ; pamba te akozongisa mabe na mabe mpo na makila ya basali na Ye, akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.


asengeli mpe te kokosa to kosala ndeko na ye mabe kati na makambo oyo etali bonzoto, pamba te Nkolo akopesa etumbu na bato nyonso oyo basalaka mabe ya lolenge wana, ndenge toyebisaki mpe tokebisaki bino liboso.


Alekizandre, monyangwisi bibende, asalaki ngai mabe mingi. Nkolo akofuta ye kolanda misala na ye.


Toyebi malamu Ye oyo alobaki : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto ; » mpe : « Nkolo akosambisa bato na Ye. »


Sik’oyo, nkolo na ngai, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, lokola Yawe apesi yo nzela te ya koboma mpe ya kozongisa yo moko mabe na mabe, tika ete banguna na yo mpe bato nyonso oyo bazali makasi ya kosala mabe epai ya nkolo na ngai bazala lokola Nabali.


Tika ete mayele na yo epambolama ! Tika ete yo moko mpe opambolama mpo ete opesi ngai nzela te ya koboma mpe ya kozongisa ngai moko mabe na mabe !


Mpe Davidi alobaki lisusu : — Na Kombo na Yawe ! Ye moko Yawe nde akoboma ye : akokufa, ezala soki tango na ye ya kokufa ekoki to soki akokende na bitumba.


Kasi Yawe apekisi ngai kosembola loboko likolo ya mopakolami na Ye. Sik’oyo, zwa kaka likonga mpe eloko ya mayi oyo ezali pembeni ya moto na ye, mpe tokende na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ