Jozefi apesaki mitindo ete batondisa ble na basaki na bango, bazongisa mbongo ya moto na moto na saki na ye mpe bapesa bango bilei mpo na nzela. Esalemelaki bango bongo.
Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Botelemelaka te moto mabe ; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi.
Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo.
Yango wana nazali kopesa toli epai ya bilenge basi bakufisa mibali ete babala na bango lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango malamu, mpo ete bapesa na banguna nzela te ya kotonga biso.
Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.
kasi botatolaka yango na boboto, na limemia mpe na mitema peto, mpo ete bato oyo balobaka mabe na tina na etamboli na bino ya malamu kati na Klisto bakufa soni.
Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli ; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.
Boye Rite alalaki na makolo na ye mpe alamukaki na tongo-tongo, wana molili ezalaki nanu kopekisa bato komonana malamu ; pamba te Boazi alobaki : « Moto moko te ayeba ete mwasi moko ayaki na etando oyo. »
Kasi Yawe apekisi ngai kosembola loboko likolo ya mopakolami na Ye. Sik’oyo, zwa kaka likonga mpe eloko ya mayi oyo ezali pembeni ya moto na ye, mpe tokende na biso.