Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 12:13 - Mokanda na Bomoi

13 mpo na oyo etali bosenga ya babulami, bosunganaka mpe boyambanaka malamu kati na bandako na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 12:13
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mafuta ya nzoyi, miliki, bameme, fromaje ya ngombe, mpo ete Davidi elongo na bato na ye balia ; pamba te bazalaki kolobana bango na bango : « Solo, sima na bango kotambola kati na esobe, bato oyo balembi, bazali konyokwama na nzala mpe na posa ya mayi. »


Nabondeli yo, tika ete tobongisela ye shambre ya moke na likolo ya ndako mpe totia kati na yango mbeto, mesa, kiti mpe mwinda. Boye, tango nyonso akoya epai na biso, akoki kovanda kuna. »


Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Afungolaka loboko na ye mpo na kokabela babola, mpe asembolaka yango mpo na kosunga bato bakelela.


Pamba te nayokaki nzala, mpe bopesaki Ngai bilei ; nayokaki posa ya mayi, mpe bopesaki Ngai mayi ya komela ; nazalaki mopaya, mpe boyambaki Ngai malamu ;


Kornei atalaki ye na somo mpe atunaki : — Nkolo, likambo nini ? Anjelu azongisaki : — Mabondeli na yo mpe masungi oyo opesaka epai ya babola emati liboso ya Nzambe, mpe akanisi yango.


mpe kotia yango na makolo ya bantoma. Bantoma bazalaki kokabola yango na moto na moto, kolanda bosenga na ye.


tika ete moto oyo azali na likabo ya kolendisa alendisaka, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa apesaka na motema moko, tika ete moto oyo azali na likabo ya kokamba akambaka na molende, mpe tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato bakelela asungaka na esengo !


Bandeko na ngai, nazali lisusu kopesa bino etinda. Boyebi malamu ete Stefanasi mpe libota na ye bazalaki bato ya liboso ya kobongola mitema kati na Akayi, mpe ete bakomaki kosalela basantu.


Mpo na ngai, ezali na tina te ya kokomela bino na tina na lisungi ya kopesa na basantu,


Pamba te lotomo ya makabo na bino ezali kaka te mpo na kokokisa bosenga ya basantu, kasi ezali mpe mpo ete matondi mingi ezonga epai ya Nzambe.


Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.


Boye, mokambi ya Lingomba asengeli kozala : moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moto oyo alekisaka ndelo te na ezaleli na ye, moto oyo ayebi komikanga, moto ya lokumu, moto oyo ayambaka malamu bapaya kati na ndako na ye, moto oyo azali na makoki ya koteya,


kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu : abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.


Asengeli nde kozala moto oyo ayambaka bato malamu kati na ndako na ye, alingaka makambo ya malamu, azalaka na ekenge ; asengeli kozala moto ya bule, moto ya sembo, moto oyo ayebi komikanga,


Bandeko na biso mpe basengeli koyekola komipesa na misala ya malamu, mpo na kosunga bosenga nyonso mpe kobika bomoi oyo ekobotaka bambuma.


Ndeko na ngai, bolingo na yo mpo na basantu ezali penza kopesa ngai esengo mingi mpe kolendisa ngai, pamba te okitisaki bango mitema.


Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango.


Bolemba te koyambaka malamu bapaya, pamba te, na nzela wana, bato mosusu bayambaki ba-anjelu wana bayebaki te ete bazali solo ba-anjelu.


Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.


Boyambanaka malamu lokola nde boyambi bapaya kati na bandako na bino, bosalaka bongo na koyimayima te.


Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ?


Molingami na ngai, makambo oyo osalaka mpo na bandeko kati na kondima, ezala mpo na ba-oyo bazali bapaya na miso na yo, osalaka yango penza kolanda kondima na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ