Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 11:8 - Mokanda na Bomoi

8 kolanda ndenge ekomama : « Nzambe apesaki bango molimo ya pongi, miso mpo ete bamona te, mpe matoyi mpo ete bayoka te, kino na mokolo ya lelo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 11:8
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kino lelo, bakangami kaka na bizaleli na bango ya kala ; bagumbamelaka penza Yawe te mpe batosaka te bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bakitani ya Jakobi oyo apesaki kombo « Isalaele. »


Atako bato ya bikolo yango bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko. Kino lelo, bana na bango mpe bakitani na bango bazali kokoba kosala makambo oyo bakoko na bango bazalaki kosala.


Yawe asopeli bino molimo ya pongi makasi ; akangi bino miso, bino basakoli, azipi bino mito, bino bato oyo bomonaka makambo.


Yawe alobaki na ngai : — Kende koloba na bato oyo : « Boyoka na bino, kasi bokososola te ; botala na bino, kasi bokomona te !


Boyoka makambo oyo, bino bazoba to bato oyo bozanga mayele : bozali na miso mpo na komona kasi bomonaka te, bozali na matoyi mpo na koyoka kasi boyokaka te.


« Mwana na moto, ozali kovanda kati na libota ya batomboki ; bazalaka na miso ya kotala kasi bamonaka te, bazalaka na matoyi ya koyoka kasi bayokaka te, pamba te bazali libota ya batomboki.


natikaki ete bamikomisa mbindo na nzela ya makabo na bango, mbeka ya mwana ya liboso nyonso, mpo ete natondisa bango na somo mpe bayeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›


Azongiselaki bango : — Boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Nzambe epesameli nde na bino ; kasi epai ya bato mosusu, nazali koloba na masese, mpo ete, atako bakoki kotala, bamona te ; mpe atako bakoki koyoka, basosola te.


« Kende koloba na bato oyo : Matoyi na bino ekoyoka na pamba, bokososola te ; miso na bino ekotala na pamba, bokomona te.


Na mibu tuku minei oyo Ngai Yawe nakambaki bino na esobe, bilamba na bino enzulukaki te mpe basandale na makolo na bino ekufaki te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ