Azongisaki : — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.
Bato oyo bakotikala na Siona mpe ba-oyo bakovanda na Yelusalemi bakobengama basantu : bango nyonso oyo bakombo na bango ekomama kati na bato oyo batikali na bomoi na Yelusalemi.
batongi bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na Bala, mpo na kotumba bana na bango na moto lokola mbeka ya kotumba epai ya Bala ; nzokande Ngai natikala kotinda bango likambo ya boye te to mpe likambo ya boye etikala ata komata na makanisi na Ngai te ;
« Nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa mokili ya Yuda mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi etumbu ; nakosilisa koboma, na esika oyo, nyonso oyo etikali, ya losambo ya nzambe Bala elongo na bakombo ya banganga-nzambe ya bapagano, oyo basalelaka banzambe ya bikeko :
Bomonaki bino moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki na Bala ya Peori : abomaki kati na bino bato nyonso oyo bamipesaki na kosalela Bala ya Peori.