Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 11:32 - Mokanda na Bomoi

32 Pamba te Nzambe akanga bato nyonso lokola na boloko ya kozanga botosi mpo ete ayokela bato nyonso mawa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 11:32
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ayaki lokola motatoli, mpo na kotatola na tina na pole, mpo ete bato nyonso bandima na nzela na ye.


Mpe tango bakotombola Ngai longwa na mabele, nakobenda bato nyonso epai na Ngai.


ndenge wana mpe kozanga botosi na bango ya sik’oyo esali ete Nzambe ayokela bino mawa mpo ete ayokela bango mpe mawa.


Bato nyonso oyo bandimaka, Nzambe akomisaka bango bato ya sembo na nzela ya kondima Yesu-Klisto. Bokeseni ezali te kati na Bayuda mpe Bapagano,


Boye, toloba nini ? Biso Bayuda toleki bato mosusu ? Te, soki moke te ! Pamba te tosilaki kotalisa ete bato nyonso, ezala Bayuda to Bapagano, bango nyonso bazali na se ya bokonzi ya lisumu.


Pamba te ndenge kozanga botosi ya moto moko ekomisaki bato ebele bato ya masumu, ndenge wana mpe botosi ya moto moko ekomisi bato ebele bato ya sembo.


Kasi tala makambo oyo Makomi eloba : Mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya lisumu mpo ete elaka ya Nzambe ekokisama epai ya bandimi na nzela ya kondima na bango kati na Yesu-Klisto.


Liboso ete kondima eya, tozalaki na se ya bokonzi ya Mobeko, tozalaki ya kokangama mpo na kozela kondima oyo esengelaki komonisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ