Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 11:3 - Mokanda na Bomoi

3 — Nkolo, babomi basakoli na Yo mpe babuki bitumbelo na Yo. Mpe ngai, natikali kaka ngai moko, mpe bazali lisusu koluka koboma ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 11:3
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nkolo na ngai, oyokaki te makambo oyo nasalaki tango Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe ? Nabombaki basakoli ya Yawe nkama moko kati na madusu mibale ya mabanga : tuku mitano na lidusu moko na moko mpe napesaki bango bilei mpe mayi ya komela.


Wana Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe, Abidiasi azwaki basakoli nkama moko mpe abombaki bango kati na madusu mibale ya mabanga : basakoli tuku mitano na lidusu moko na moko, mpe azalaki kopesa bango bilei mpe mayi.


Kasi batosaki Yo te mpe batombokelaki Yo, bapesaki Mibeko na Yo mokongo, babomaki basakoli na Yo, oyo bazalaki koteya bango ete bazonga epai na Yo, mpe batiolaki Yo makasi na maloba na bango.


« Napesaki bato na yo etumbu ya pamba ; pamba te bazwaki na bango kaka mayele te. Mopanga na yo ebomi basakoli na yo ndenge nkosi ebomaka bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ