Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 11:2 - Mokanda na Bomoi

2 Nzambe asundolaki bato na Ye te, oyo ayeba wuta kala. Boni, boyebi te makambo oyo Makomi ezali koloba na tina na Eliya oyo azalaki komitungisa epai ya Nzambe na tina na Isalaele :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 11:2
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi alobaki na bango : — Likambo nini oyo bosali ? Boyebi te ete moto lokola ngai nazali na makoki ya komona makambo na bosoloka ?


Ozalaki na motema monene liboso na bango wuta mibu ebele mpe, na nzela ya Molimo na Yo, okebisaki bango na nzela ya basakoli na Yo. Kasi bayokaki kaka te. Boye okabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya.


Pamba te Yawe asundolaka bato na Ye te, abwakaka libula na Ye te.


Tango bato bamonaki ete Moyize azali kowumela mpo na kokita na ngomba, basanganaki zingazinga ya Aron mpe balobaki : — Yaka mpe salela biso nzambe oyo akotambola liboso na biso. Pamba te Moyize, moto oyo abimisaki biso na Ejipito, toyebi te makambo nini ekomeli ye.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki kaka bakoki komeka molayi ya likolo mpe komona miboko ya mabele, wana nakobwaka bana nyonso ya Isalaele mpo na makambo nyonso oyo basali, » elobi Yawe.


Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe : — Kondima makabo na bango te. Nazwaki ata eloko moko te epai na bango, ezala ane ; mpe nasalaki ata moto moko te mabe kati na bango.


Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te kati na buku ya Moyize, makambo oyo Nzambe alobaki na ye na tina na nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te : « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? »


Yesu atondisamaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani, mpe Molimo amemaki Ye kati na esobe


Mwasi alobaki na Yesu : — Nkolo, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo ; bongo mayi yango ya bomoi, olingaki kozwa yango wapi ?


Tango bato ya bikolo ya bapaya bayokaki bongo, basepelaki mpe bakomaki kokumisa Liloba na Nkolo ; mpe bato nyonso oyo Nzambe abongisa mpo na kozwa bomoi ya seko bakomaki bandimi.


Sik’oyo bandeko na ngai, nayebi ete bosalaki makambo na kozanga boyebi, ndenge bakonzi na bino basalaki.


Balobaki na Aron : « Salela biso banzambe oyo bakotambola liboso na biso. Pamba te toyebi te soki makambo nini ekomeli Moyize oyo abimisaki biso na mokili ya Ejipito ! »


Boni, boyebi te ete soki bomikabi epai ya moto lokola bawumbu mpo na kotosa ye bokomi nde bawumbu ya moto oyo bozali kotosa to bawumbu ya lisumu oyo ememaka na kufa to bawumbu ya botosi oyo ememaka na bosembo ?


Okoloba lisusu nini, soki Nzambe asalaki bongo mpo na kolakisa bomengo ya nkembo na Ye mpo na bolamu ya bato oyo asepeli kosalela ngolu, ba-oyo abongisa wuta kala mpo na nkembo ?


Elingi koloba te ete Liloba na Nzambe ebimaki na pamba, pamba te bakitani nyonso ya Isalaele bazali bana ya Isalaele te,


Boyebi te ete basantu bakosambisa mokili ? Bongo soki bosengeli kosambisa mokili, bozangi penza makoki ya kokata mwa makambo ya mike-mike ?


Kasi moto oyo alingaka Nzambe, Nzambe ayebi ye.


Nzokande, soki kokoba na ngai kobika kati na mokili ekopesaka ngai nzela ya kobota bambuma ebele ya malamu na nzela ya mosala na ngai, nayebi te nini nasengeli kopona.


Na tango ya kala, Nzambe azalaki koloba, mbala mingi mpe na lolenge ebele, epai ya bakoko na biso, na nzela ya basakoli.


Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ