15 Pamba te soki kosundolama na bango ezongisi boyokani kati na Nzambe mpe mokili, koyambama na bango ekozala ndenge nini ? Boni, ekozala te bomoi kati na bakufi ?
Eleko moko ya baposo tuku sambo ekatamaki mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bule, mpo na kosilisa botomboki liboso ya Nzambe mpe kosukisa masumu, mpo na kolimbisa masumu mpe kokokisa bosembo ya libela, mpo na kokangisa emoniseli mpe mosakoli, mpe mpo na kobulisa Mosantu ya basantu.
Kasi sima na mikolo wana misato na ndambo, pema na bomoi kowuta na Nzambe ekotaki kati na bango mpe batelemaki. Bongo somo monene ekangaki bato oyo bazalaki kotala bango.