Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 11:14 - Mokanda na Bomoi

14 na elikya ya kolamusa zuwa ya bato ya ekolo na ngai mpe kobikisa ndambo ya bato kati na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 11:14
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Labani alobaki na ye : « Solo, ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai penza ! » Jakobi avandaki elongo na ye sanza mobimba.


Mokonzi Davidi atindaki sango epai ya Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari : « Botuna na bampaka ya Yuda : mpo na nini bosengeli kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi na ndako na ye, pamba te makambo oyo ezali kolobama kati na Isalaele mobimba esili kokoma na matoyi ya mokonzi ?


Natuna lisusu : Bato ya Isalaele basosolaki te ? Moyize azalaki moto ya liboso ya koloba : « Nakosala ete boyokela oyo ezali ata ekolo te zuwa, nakosala ete boyoka kanda mpo na ekolo oyo ezanga ata mayele. »


Natuna lisusu : boni, bana ya Isalaele babetaki libaku mpo ete bakweya mpo na libela ? Soki moke te ! Kasi likolo ya mabe na bango, lobiko epesamelaki na Bapagano mpo na kolamusa likunya ya Isalaele.


Mpo na yango, eleki kutu malamu mpo na ngai kolakelama mabe mpe kokabwana na Klisto mpo na bandeko na ngai, bato ya ekolo na ngai,


Pamba te lokola, kati na bwanya ya Nzambe, mokili etikalaki te koyeba Nzambe na nzela ya bwanya na yango, yango wana Nzambe asepeli kobikisa bandimi na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma.


Yango wana, ngai, kati na makambo nyonso, nasalaka makasi mpo na kosepelisa bato nyonso ; nalukaka litomba na ngai moko te, kasi nalukaka bolamu ya bato ebele, mpo ete babika.


Oyebi nini kati na likambo yango ? Tango mosusu, yo mwasi, okobikisa mobali na yo ! Tango mosusu, yo mobali, okobikisa mwasi na yo !


Tala liloba ya solo penza, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango : Yesu-Klisto ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu ; mpe kati na bato yango ya masumu, ngai nde naleki na masumu.


oyo alingi ete bato nyonso babikisama mpe bayeba solo.


Misenzela malamu, sala keba na mateya na yo, mpe tikala ngwi kati na yango. Soki osali bongo, okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bakoyoka yo.


pamba te abikisaki biso mpe abengaki biso mpo ete totambola na bomoi ya bule. Mpe soki asalaki bongo, ezali te mpo na misala na biso, kasi ezali nde mpo na mabongisi mpe ngolu na Ye moko kaka, ngolu oyo apesaki biso kati na Yesu-Klisto liboso ya ebandeli ya tango.


Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko.


abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale.


Nazali kozongisa ye epai na yo, pamba te azali penza motema na ngai.


Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.


ndenge nini biso tozanga kozwa etumbu soki tozwi na pamba lobiko ya boye ? Solo, Ye moko Nkolo nde asakolaki liboso na tina na lobiko yango ; bongo na sima, bato oyo bayokaki sango yango batalisaki biso bosolo na yango.


boyeba ete moto oyo azongisi mopengwi longwa na libunga abikisi ye na kufa mpe asali ete masumu ebele elimbisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ