Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 11:12 - Mokanda na Bomoi

12 Nzokande, soki mabe na bango epesi mokili bomengo, mpe kobunga na bango epesi Bapagano bomengo, ndenge nini kobongola mitema na bango emema te bomengo oyo eleki ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 11:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.


Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota, na kati-kati ya bikolo ebele, lokola nkosi kati na banyama ya zamba, lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme : tango elekaka kati na etonga ya bameme, ekangaka mpe epasolaka yango, mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te.


Siona, tokende ! Bima noki, yo oyo ovandaka na Babiloni, mboka kitoko !


Asengeli kotikala kuna na Likolo kino na tango oyo Nzambe akobongisa biloko nyonso, ndenge alaka yango wuta kala na nzela ya babulami na Ye, basakoli.


Pamba te soki kosundolama na bango ezongisi boyokani kati na Nzambe mpe mokili, koyambama na bango ekozala ndenge nini ? Boni, ekozala te bomoi kati na bakufi ?


Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.


Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe ezali na mozindo mingi ! Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye mpe kososola nzela na Ye !


Okoloba lisusu nini, soki Nzambe asalaki bongo mpo na kolakisa bomengo ya nkembo na Ye mpo na bolamu ya bato oyo asepeli kosalela ngolu, ba-oyo abongisa wuta kala mpo na nkembo ?


Atako nazali moto ya suka kati na basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu ya kosakola epai ya Bapagano bomengo monene ya Klisto ;


Nzambe asepeli kolakisa bango bomengo ya nkembo, oyo evandi kati na mabombami ya mabongisi na Ye mpo na Bapagano. Mabombami yango ezali : Klisto kati na bino, elikya ya nkembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ