Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 11:11 - Mokanda na Bomoi

11 Natuna lisusu : boni, bana ya Isalaele babetaki libaku mpo ete bakweya mpo na libela ? Soki moke te ! Kasi likolo ya mabe na bango, lobiko epesamelaki na Bapagano mpo na kolamusa likunya ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 11:11
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, bokanisi penza ete Ngai nasepelaka solo na kufa ya bato mabe, elobi Nkolo Yawe, to nasepelaka te tango batikaka banzela na bango ya mabe mpo ete bazala na bomoi ?


Solo, Ngai nasepelaka na kufa ya moto moko te, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana mpe bozala na bomoi ! »


Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›


Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki : — Te, ekoki kosalema te !


Tango Polo mpe Barnabasi babimaki na ndako ya mayangani, bato basengaki bango kolobela lisusu makambo wana na mokolo ya Saba oyo elandaki.


Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko ! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya.


Natuna lisusu : Bato ya Isalaele basosolaki te ? Moyize azalaki moto ya liboso ya koloba : « Nakosala ete boyokela oyo ezali ata ekolo te zuwa, nakosala ete boyoka kanda mpo na ekolo oyo ezanga ata mayele. »


Bongo natunaki : Boni, Nzambe asundolaki bato na Ye ? Soki moke te ! Pamba te ngai mpe nazali moto ya Isalaele, mwana ya Abrayami, kati na libota ya Benjame.


Nzokande, soki mabe na bango epesi mokili bomengo, mpe kobunga na bango epesi Bapagano bomengo, ndenge nini kobongola mitema na bango emema te bomengo oyo eleki ?


na elikya ya kolamusa zuwa ya bato ya ekolo na ngai mpe kobikisa ndambo ya bato kati na bango.


ndenge wana mpe kozanga botosi na bango ya sik’oyo esali ete Nzambe ayokela bino mawa mpo ete ayokela bango mpe mawa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ