Nakotia yango na loboko ya banyokoli na yo, oyo balobaki na yo : ‹ Lala na se mpo ete totambola likolo na yo ! › Mpe okomisaki mokongo na yo lokola nzela, lokola balabala mpo ete batambola likolo na yo. »
nakobongisa bino ete bokufa na mopanga, mpe bino nyonso bokofukama mpo ete bakata bino bakingo, pamba te nabengaki, kasi boyanolaki te ; nalobaki, kasi boyokaki te : bosalaki kaka makambo mabe na miso na Ngai mpe boponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. »
Mawa na mobateli bibwele ya zoba oyo asundolaka etonga na ye ! Tika ete mopanga ekata ye loboko mpe etobola ye liso oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ! Tika ete loboko na ye ekawuka, solo, ekawuka penza ! Tika ete liso na ye, oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ekufa, ekufa solo !
Pamba te, atako bayebaki Nzambe, kasi bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe mpe bapesaki Ye matondi te, kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango, oyo ezangaki mayele, etondaki na molili.
Soki Nzambe azangaki te kopesa na ba-anjelu oyo basalaki masumu etumbu kasi abwakaki bango ya kokangama na minyololo kati na molili makasi ya lifelo epai wapi abombi bango mpo na kozela mokolo ya kosambisama,
Nzambe akangaki mpe na minyololo ya seko, kati na molili mpo na kosambisama ya mokolo monene, ba-anjelu oyo basepelaki te na evandelo oyo Nzambe apesaki bango mpe batikaki yango.