Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 11:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bongo natunaki : Boni, Nzambe asundolaki bato na Ye ? Soki moke te ! Pamba te ngai mpe nazali moto ya Isalaele, mwana ya Abrayami, kati na libota ya Benjame.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 11:1
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Yawe alobaki : « Nakobengana mpe Yuda na miso na Ngai ndenge nabenganaki Isalaele ; nakobwaka Yelusalemi, engumba oyo napona, elongo na Tempelo na yango, oyo na tina na yango nalobaki : ‹ Kombo na Ngai ekozala kuna. › »


Na butu, nakanisaka lisusu banzembo na ngai ; motema na ngai ezongelaka kokanisa, mpe molimo na ngai ekomaka komituna :


Pamba te Yawe asundolaka bato na Ye te, abwakaka libula na Ye te.


Nzambe na ngai akobwaka bango, pamba te batosaki Ye te, mpe bakokoma koyengayenga kati na bikolo.


Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki : — Te, ekoki kosalema te !


— Nazali Moyuda, nabotama na Tarse kati na Silisi, kasi nakoli kaka awa, na engumba oyo ya Yelusalemi. Gamalieli nde azalaki molakisi na ngai ; ye nde ateyaki ngai na bosolo nyonso Mobeko ya bakoko na biso. Nazalaki na bolingo makasi mpo na Nzambe, ndenge bino nyonso bozali na yango lelo.


Bayuda nyonso bayebi evandeli na ngai, wuta na bomwana na ngai, kobanda na ebandeli ya bomoi na ngai, kati na ekolo na ngai, mpe ezala kati na Yelusalemi.


Natuna lisusu : boni, bana ya Isalaele babetaki libaku mpo ete bakweya mpo na libela ? Soki moke te ! Kasi likolo ya mabe na bango, lobiko epesamelaki na Bapagano mpo na kolamusa likunya ya Isalaele.


Soki moke te ! Nzambe azali solo, mpe bato nyonso bazali bakosi kolanda ndenge ekomama : « Mpo ete bamona yo sembo na maloba na yo, mpe okobanda kolongaka tango bakobanda kosambisaka yo. »


Mpo na yango, eleki kutu malamu mpo na ngai kolakelama mabe mpe kokabwana na Klisto mpo na bandeko na ngai, bato ya ekolo na ngai,


Bazali Ba-Ebre ? Ngai mpe nazali Mo-Ebre. Bazali bana ya Isalaele ? Ngai mpe nazali mwana ya Isalaele ! Bazali bakitani ya Abrayami ? Ngai mpe nazali mokitani ya Abrayami.


pamba te bakatisaki ngai ngenga na mokolo ya mwambe, nazali penza moto ya Isalaele kati na libota ya Benjame, mpe nazali Mo-Ebre oyo abotama na baboti oyo bazali mpe Ba-Ebre. Mpo na oyo etali Mibeko, nazalaki Mofarizeo ;


Mpo na lokumu ya Kombo monene na Ye, Yawe akobwaka bato na Ye te, pamba te asepelaki kokomisa bino bato na Ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ