Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 10:9 - Mokanda na Bomoi

9 Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, okobika ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 10:9
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazali koloba na bino : moto nyonso oyo, na miso ya bato, akotatola ete azali moto na Ngai, Mwana na Moto mpe akotatola liboso ya ba-anjelu ya Nzambe ete azali moto na Ye ;


Baboti na ye balobaki bongo mpo ete bazalaki kobanga Bayuda, pamba te Bayuda basilaki kozwa mokano ya kobengana, na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Klisto.


Bazongisaki : — Ndima Nkolo Yesu, mpe okobika, yo mpe libota na yo.


Kasi Nzambe abukaki minyololo ya kufa, asekwisaki Ye, pamba te ekokaki kosalema te ete kufa ekanga Ye.


Nzambe asekwisaki Yesu kati na bakufi ; boye biso nyonso tozali batatoli ya lisekwa yango.


Wana bazalaki kokoba mobembo na bango, bakomaki na esika moko oyo ezalaki na mayi, mpe soda oyo baboma mokongo alobaki : — Tala mayi, yango oyo. Eloko nini ekoki kopekisa ngai kozwa libatisi ? [


pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko.


Pamba te ekomama : « Na Kombo na Ngai, » elobi Nkolo, « mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekotatola Nzambe. »


Ezali mpo na yango nde Klisto akufaki mpe asekwaki, mpo ete azala Nkolo ya bakufi mpe ya bato ya bomoi.


ezali mpe mpo na biso oyo Nzambe akotanga lokola bato ya sembo mpo ete tondimelaka Ye oyo asekwisaki, kati na bakufi, Yesu, Nkolo na biso,


Nani akokatela bango etumbu ? Moko te ! Yesu-Klisto akufaki ; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.


Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe, akoki koloba : « Tika ete Yesu alakelama mabe ! » Mpe moto moko te akoki koloba : « Yesu azali Nkolo, » soki akambami na Molimo Mosantu te.


mpe minoko nyonso etatola ete Yesu-Klisto azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.


Ezali na nzela na Ye nde bino bondimelaka Nzambe oyo asekwisaki Ye kati na bakufi mpe apesaki Ye nkembo, mpo ete kondima mpe elikya na bino ezala kati na Nzambe.


Moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe, Nzambe azali kati na ye, mpe ye azali kati na Nzambe.


Bato ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili, bazali kobungisa bato mingi nzela ; bandimaka te ete Yesu-Klisto akomaki penza moto. Moto nyonso oyo alobaka ndenge wana azali moto ya lokuta mpe monguna ya Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ