Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 10:21 - Mokanda na Bomoi

21 Kasi alobaki boye mpo na Isalaele : « Natandaki maboko na Ngai mokolo mobimba epai ya bato oyo bazanga botosi mpe bato ya mito makasi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 10:21
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi batosaki Yo te mpe batombokelaki Yo, bapesaki Mibeko na Yo mokongo, babomaki basakoli na Yo, oyo bazalaki koteya bango ete bazonga epai na Yo, mpe batiolaki Yo makasi na maloba na bango.


Kasi lokola bosundolaki Ngai tango nazalaki kobelela mpe moto moko te asalaki keba tango natandaki loboko,


Mpe atako Yawe azalaki kotindela bino tango na tango basakoli, basali na Ye, kasi bosalaki kaka keba te mpo na koyoka liloba na Ye.


Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye ; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na mokili ya Yuda mpe epai ya bavandi nyonso ya Yelusalemi pasi oyo nakataki ; pamba te nalobaki na bango kasi bayokaki Ngai te, nabengaki bango kasi bayanolaki Ngai te. »


mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. »


Pamba te nayebi ndenge nini bozali batomboki mpe mito makasi. Soki, wana nazali nanu na bomoi kati na bino, bozali batomboki liboso ya Yawe, ekozala boni sima na kufa na ngai ?


Mpe Yawe alobaki na ngai : « Natali malamu bato oyo ; bazali penza libota ya batomboki !


bazali kokanga biso nzela mpo ete toteya Bapagano te, noki te bakobika. Na ndenge wana, bazali kaka kofulukisa masumu na bango mpe, suka na suka, kanda ya Nzambe ekokweyela bango.


mpe libanga oyo ebetisaka bato mabaku, libanga monene oyo ekweyisaka bato. » Bakweyaka mpo ete batosaka te Liloba na Nzambe ; mpe ebongisama nde bongo mpo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ