Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 10:20 - Mokanda na Bomoi

20 Mpe Ezayi akomaki kino na koloba : « Namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te, namimonisaki epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 10:20
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto mabe akimaka ata soki moto moko te abengani ye, kasi bato ya sembo bazalaka na mpiko lokola nkosi.


Ye, Yawe, alobi : « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »


ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te mpe bakososola oyo nanu bayoka te.


« Ganga na mongongo makasi, kotika te ! Matisa mongongo na yo lokola kelelo, yebisa bato na Ngai botomboki na bango, mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye.


Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka.


Nkolo alobaki na mosali na ye : « Kende lisusu na banzela mpe na babalabala ya engumba, tinda bango na makasi mpo ete bakota, mpe ndako na ngai etonda na bato.


Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo.


Boye, toloba lisusu nini ? Bapagano oyo bazalaki koluka te kokoma bato ya sembo bakomi sembo na nzela ya kondima,


kasi Isalaele oyo azalaki koluka kokoma sembo na nzela ya kotosa Mobeko atikali kokoma sembo te.


Biso, tolingaka mpo ete Nzambe alingaki biso, ya liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ