Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 10:19 - Mokanda na Bomoi

19 Natuna lisusu : Bato ya Isalaele basosolaki te ? Moyize azalaki moto ya liboso ya koloba : « Nakosala ete boyokela oyo ezali ata ekolo te zuwa, nakosala ete boyoka kanda mpo na ekolo oyo ezanga ata mayele. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 10:19
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nyonso bakomaka lokola bazoba, lokola bato oyo basili mayele ; monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye, pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta, ezalaka na pema te kati na yango.


Bango nyonso bazangi mayele mpe bazali bazoba ; mateya na bango ezalaka ya pamba, mpe banzambe na bango ezalaka se banzete ya pamba !


Na mokolo wana, nakoyanola, elobi Yawe, nakoyanola Lola, mpe Lola ekoyanola mabele.


Natuna nanu : Boni, bayokaki te ? Iyo, bayokaki ! Pamba te ekomama : « Mingongo na bango eyokanaki na mabele mobimba, maloba na bango ekomaki kino na suka ya mokili. »


Natuna lisusu : boni, bana ya Isalaele babetaki libaku mpo ete bakweya mpo na libela ? Soki moke te ! Kasi likolo ya mabe na bango, lobiko epesamelaki na Bapagano mpo na kolamusa likunya ya Isalaele.


na elikya ya kolamusa zuwa ya bato ya ekolo na ngai mpe kobikisa ndambo ya bato kati na bango.


Nzambe asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye na tango oyo, mpo ete Ye moko azala Sembo mpe atanga lokola moto ya sembo, moto oyo azali kondimela Yesu.


Tala makambo oyo nalingi koloba : Moko kati na bino azali koloba : « Ngai nazali moto ya Polo ; » mpe mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Apolosi ; » mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Petelo ; » mpe mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Klisto. »


Nalingi koloba nini ? Nalingi koloba ete misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe yango moko nzambe ya ekeko, ezali na tina ?


Boni, bozangi bandako oyo kati na yango bokoki kolia mpe komela ? Boni, bosalaka bongo mpo na kotiola Lingomba ya Nzambe mpe kosambwisa bato oyo bazangi bilei ? Nini nakoki koloba na bino ? Nakumisa bino ? Na likambo oyo, nakokumisa bino te !


Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu Bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te.


Bandeko na ngai, nazali koyebisa bino ete nzoto ya mosuni mpe makila ekoki te kokota na Bokonzi ya Nzambe, mpe oyo epolaka ekoki te kosangana na oyo epolaka te.


Bandeko na ngai, nazali koloba boye : tango ekomi moke ; kobanda sik’oyo, tika ete mibali oyo bazali na basi bazala lokola nde bazali na basi te ;


Bazwelaki Ngai mbanda oyo azali ata nzambe te, batumbolaki kanda na Ngai likolo ya biloko oyo ekoki kutu kozala ata banzambe ya bikeko te. Boye, Ngai mpe nakosala ete bango mpe bayokela oyo ezali ata ekolo te zuwa ; nakosala ete ekolo moko ya bazoba epesa bango kanda.


Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.


Na kala, bozalaki bato ya Nzambe te ; kasi sik’oyo, bokomi bato na Ye penza. Na kala, Nzambe azalaki koyokela bino mawa te ; kasi sik’oyo, akomi penza koyokela bino mawa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ