Nazali na soni te mpo na Sango Malamu, pamba te ezali nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya moto nyonso oyo andimaka : liboso, ya Moyuda, mpe sima, ya Mogreki.
Kasi ndenge nini bakoki solo kobelela Ye soki bandimeli Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye soki bayoki nanu sango na Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye soki moto ateyi bango te ?
Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.
Boni, ezali mpo botosaki Mobeko nde Nzambe apesi bino Molimo na Ye mpe azali kosala bikamwa kati na bino to ezali mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki ?
Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.
Mpe tala mpo na nini tozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe : tango boyambaki Liloba na Nzambe, oyo toteyaki bino, bondimaki yango te lokola liloba oyo ewuti epai ya bato, kasi lokola penza Liloba na Nzambe, oyo ezali kosala kati na bino oyo bozali na kondima.
Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko ; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka.
Ngai Yoane, ndeko na bino, oyo azali kokabola elongo na bino pasi, bokonzi mpe molende kati na Yesu, nazalaki kati na esanga ya Patimosi, likolo ya Liloba na Nzambe mpe litatoli na ngai na tina na Yesu.