Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 10:10 - Mokanda na Bomoi

10 pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 10:10
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu alobaki na ye : — Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.


Nkona oyo ekweyaki na mabele ya malamu ezali bato oyo, na mitema ya sembo mpe ya malamu, bayokaka Liloba, babatelaka yango, bayikaka mpiko mpe babotaka bambuma.


Filipo alobaki : — Soki kaka ondimi wuta na motema na yo mobimba, okoki na yo kozwa libatisi. Moto yango azongisaki : — Nandimi ete Yesu-Klisto azali Mwana na Nzambe !]


Makomi eloba : « Moto nyonso oyo andimelaka Ye akotikala koyokisama soni te. »


Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, okobika ;


Toyebi ete moto akoki kokoma sembo te na nzela ya kotosa maloba ya Mobeko, kasi kaka na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto. Yango wana biso mpe tondimelaki Yesu-Klisto mpo ete tokoma sembo na nzela ya kondima kati na Klisto, kasi na nzela te ya kotosa maloba ya Mobeko, pamba te moto moko te akoki kokoma sembo na nzela ya kotosa maloba ya mibeko.


mpe bakuta ngai kati na Ye. Nakomi moto ya sembo mpo ete nandimeli Klisto : Nzambe akomisi ngai moto ya sembo na nzela ya kondima. Ezali lisusu te na nzela ya kotosa Mibeko ndenge nazalaki kokanisa kala.


Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.


Bandeko na ngai, bosala keba ete moto moko te kati na bino azala na motema mabe mpe azanga kondima kino kokabwana na Nzambe na bomoi ;


Moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe, Nzambe azali kati na ye, mpe ye azali kati na Nzambe.


Nayebi malamu esika oyo ovandaka. Ezali mpe kaka na esika yango nde Satana atie kiti na ye ya bokonzi. Okweyisaki te kondima na yo epai na Ngai, ezala na mikolo oyo babomaki Antipasi, motatoli na Ngai ya sembo, kati na engumba na bino epai wapi Satana avandaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ