Kanisa Abrayami, Izaki mpe Isalaele, basali na Yo, oyo Yo moko olapelaki ndayi mpe olobaki : « Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto na likolo, nakopesa bango mokili oyo nyonso ndenge kaka nalobaki na bango ; mpe yango ekozala libula na bango mpo na libela. »
Nzokande, naboyaki te kozala mobateli bibwele oyo alandaka nzela na Yo. Oyebi malamu ete nazalaki na posa ya komona mokolo ya pasi te. Maloba oyo ebimaka na monoko na ngai ebimaka nde liboso na Yo.
Boni, bazongisaka solo mabe na malamu ? Tala, batimoli libulu mpo na kokunda ngai ! Kanisa ndenge nini natelemaki liboso na Yo mpo na koloba na tina na bolamu na bango, mpo ete kanda na Yo ekende mosika na bango.
Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi boboyaki.
Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino ! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima.
Kino na mokolo oyo Samuele akufaki, atikalaki komona lisusu Saulo te. Samuele asalaki matanga mpo na Saulo. Mpe Yawe ayokaki mawa na ndenge akomisaki Saulo mokonzi ya Isalaele.