Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 1:32 - Mokanda na Bomoi

32 Bayebi malamu ekateli ya sembo ya Nzambe ete bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana basengeli na kufa, kasi bazali kaka kokoba kosala makambo wana nyonso mpe kondima bato oyo basalaka yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 1:32
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki omoni moyibi, wana nde osepeli ; mpe ovandaka esika moko na bato na bikobo.


Bato oyo babukaka mibeko bakumisaka bato mabe, kasi bato oyo babatelaka mibeko batelemelaka bato mabe.


Basepelisaka mokonzi na nzela ya misala na bango ya mabe ; basepelisaka mpe bakambi na nzela ya lokuta na bango.


Boye, wana bosalaka bongo, botatolaka ete bondimi makambo oyo bakoko na bino basala ; pamba te bango, baboma basakoli, mpe bino, bozali kotonga bakunda na bango.


Tango basopaki makila ya Etieni, motatoli na Yo, ngai mpe nazalaki wana, nandimaki makambo oyo esalemaki mpe nazalaki kokengela bilamba ya bato oyo babomaki ye. »


Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kobanda na mokolo wana, minyoko ya makasi ekweyelaki Lingomba kati na Yelusalemi ; mpe bandimi nyonso bapalanganaki na Yuda mpe na Samari, longola kaka bantoma.


Solo, Nzambe amonisaka kanda na Ye wuta na lola mpo na kopesa etumbu, na lisumu mpe na mabe nyonso ya bato oyo bazipaka bosolo na nzela ya misala na bango ya mabe,


Pamba te, atako bayebaki Nzambe, kasi bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe mpe bapesaki Ye matondi te, kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango, oyo ezangaki mayele, etondaki na molili.


Nzokande, litomba nini bozwaki na tango wana oyo bozalaki kosala makambo oyo ezali koyokisa bino lelo soni, pamba te ememaka na kufa ?


Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


mpe mpo ete bato nyonso oyo baboyaki kondimela solo kasi basepelaki na mabe bazwa etumbu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ