Barome 1:29 - Mokanda na Bomoi29 Batondaki na lolenge nyonso ya misala ya sembo te, ya makambo mabe, ya lokoso, ya mabe, ya zuwa, ya misala ya koboma bato, ya koswana, ya kokosela baninga makambo mpe ya koyina bato ; bakomaki bato na songisongi, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.