25 Basundolaki bosolo ya Nzambe mpo na komipesa na makambo ya lokuta, bapesaki lokumu mpe bagumbamelaki bikelamu, na esika ya Mokeli oyo apesamela nkembo mpo na seko. Amen !
Makanisi na ye ekangama na putulu, motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye ; akokoka te komikangola mpe koloba : « Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali ezali lokuta te ? »
Oh Yawe, Makasi na ngai mpe Ndako na ngai batonga makasi, Ekimelo na ngai na tango ya pasi, bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba : « Batata na biso bazalaki kaka na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Yuda, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te babwakaki Mobeko na Ngai, babatelaki te bikateli na Ngai mpe babungaki nzela mpo na kolanda banzambe ya lokuta oyo bakoko na bango balandaki na tango ya kala.
Boni, banzambe ya bikeko ezali na tina nini, pamba te moto nde asalaki yango ? Elilingi oyo eteyaka makambo ya lokuta ezali na tina penza nini ? Pamba te moto oyo asalaki yango azali nde kotia elikya na mosala ya maboko na ye, asali nde ekeko oyo elobaka te.
Moto nyonso oyo alingaka tata na ye mpe mama na ye koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai. Moto nyonso oyo alingaka mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.
Solo, Nzambe amonisaka kanda na Ye wuta na lola mpo na kopesa etumbu, na lisumu mpe na mabe nyonso ya bato oyo bazipaka bosolo na nzela ya misala na bango ya mabe,
Na esika ete bakumisa Nzambe oyo akufaka te mpe atonda na nkembo, bakumisaki banzambe ya bikeko lokola bililingi ya bato oyo bakufaka, ya bandeke, ya banyama oyo etambolaka na makolo minei mpe oyo etambolaka na libumu.
mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko yango nde Klisto, oyo azali na likolo ya nyonso, ayaki na mokili lokola moto. Tika ete Nzambe apambolama libela na libela ! Amen !
pamba te bango moko bazali kotatola ndenge nini boyambaki biso mpe ndenge nini botikaki kosambela banzambe ya bikeko mpo na komipesa na Nzambe mpe mpo na kosalela Nzambe na bomoi mpe ya solo,
Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.