Barome 1:23 - Mokanda na Bomoi23 Na esika ete bakumisa Nzambe oyo akufaka te mpe atonda na nkembo, bakumisaki banzambe ya bikeko lokola bililingi ya bato oyo bakufaka, ya bandeke, ya banyama oyo etambolaka na makolo minei mpe oyo etambolaka na libumu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Botombola miso na bino mpe botala na likolo : Nani akela biloko nyonso ya likolo : moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu ? Ezali Ye oyo abimisaka mampinga nyonso ya minzoto mpe abengaka yango moko na moko na kombo na yango. Mpo na bokonzi monene mpe nguya makasi na Ye, moko te kati na yango ezangaka.