Makanisi na ye ekangama na putulu, motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye ; akokoka te komikangola mpe koloba : « Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali ezali lokuta te ? »
Otiaki elikya na makambo na yo ya mabe, olobaki : « Moto moko te azali komona ngai ! » Bwanya mpe mayele na yo epengwisaki yo tango ozalaki komilobela : « Ngai nde nazali, mosusu azali te ! »
Bato nyonso bakomaka lokola bazoba, lokola bato oyo basili mayele ; monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye, pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta, ezalaka na pema te kati na yango.
Kasi soki miso na yo ekufi, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na molili. Bongo soki pole oyo ezali kati na yo ekomi molili, molili yango ekozala makasi penza.
Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.