Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 1:19 - Mokanda na Bomoi

19 pamba te makambo oyo bakoki koyeba na tina na Nzambe emonanaka polele kati na bango ; Ye moko Nzambe nde alakisa bango yango na polele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 1:19
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boyebi yango te ? Boyoka nanu yango te ? Bayebisa bino nanu yango te wuta na ebandeli ? Bososola nanu yango te wuta mokili esalema ?


Botombola miso na bino mpe botala na likolo : Nani akela biloko nyonso ya likolo : moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu ? Ezali Ye oyo abimisaka mampinga nyonso ya minzoto mpe abengaka yango moko na moko na kombo na yango. Mpo na bokonzi monene mpe nguya makasi na Ye, moko te kati na yango ezangaka.


Pole ya solo eyaki na mokili, mpe engengisaka bato nyonso.


Wuta Nzambe akela mokili, makoki na Ye, oyo emonanaka na miso te, lokola nguya na Ye ya seko mpe bonzambe na Ye, emonanaka polele penza, tango bayekolaka yango na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki te komilongola na ngambo.


Soki Bapagano oyo bayebi Mobeko te bazali kosala na ndenge na bango moko makambo oyo Mobeko esengaka, boyeba ete bamikomisaka Mobeko mpo na bango moko atako bazali na Mobeko yango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ