Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 1:10 - Mokanda na Bomoi

10 kati na mabondeli na ngai tango nyonso ; mpe nasengaka na Nzambe ete, na mikolo oyo to na mikolo oyo ekoya, apesa ngai nzela ya koya kotala bino, soki ezali mokano na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 1:10
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atikaki bango na koloba : — Nakozongela bino lisusu, soki Nzambe alingi. Wuta na Efeso, azwaki masuwa mpe akendeki.


Sima na makambo oyo nyonso, Polo, na bokambami ya Molimo, azwaki mokano ya kolekela na Masedwane mpe na Akayi mpo na kokende na Yelusalemi. Alobaki : — Soki nalongwe kuna, nakokende lisusu na Rome.


Lokola tolongaki te kobongola makanisi na ye, totikaki kobondela ye mpe tolobaki : — Tika ete mokano ya Nkolo esalema !


Nayebi ete tango nakoya epai na bino, nakoya na mapamboli mingi ya Klisto.


Polo oyo abengama mpo na kozala ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko mobali Sositeni ;


Kasi, soki Nkolo alingi, nakoya epai na bino kala mingi te ; mpe nakoyeba kaka te ndenge nini bato yango ya lofundu balobaka, kasi mpe nguya nini bazali na yango.


Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.


Yango wana, tolukaki koya epai na bino. Ngai Polo, namekaki yango mbala na mbala, kasi Satana akangaki nzela na biso.


Nasengi na yo lisusu ete obongisela ngai esika ya kolala, pamba te nazali na elikya ete Nzambe akozongisa ngai epai na bino lokola eyano na mabondeli na bino.


Nazali penza kosenga na bino ete bobondela Nzambe mpo ete bazongisa ngai na lombangu epai na bino.


Tala ndenge bosengeli koloba : « Soki Nkolo alingi, tokozala na bomoi mpe tokosala likambo songolo to pakala. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ