Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 99:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama na kotala na ngambo ya ngomba na Ye ya bule. Pamba te Yawe, Nzambe na biso, azali bule.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 99:9
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tokende na Ndako na Ye, togumbama liboso ya enyatelo makolo na yango.


« Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »


Tika ete Kombo na Yo ya monene mpe ya somo esanzolama ; ezali bule !


Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye ; azali Mosantu.


Kasi Yawe, Mokonzi ya mampinga, akonetolama na nzela ya bosembo na Ye, mpe Nzambe Mosantu akolakisa bosantu na Ye na nzela ya boyengebene na Ye.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu : « Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye ! »


Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli ? Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, okufaka te. Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso ; mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango mpo na kopesa biso etumbu.


pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene ; Kombo na Ye ezali Bule.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Filadelfi : « Tala maloba ya Ye oyo azali Bule mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi : oyo Ye afungoli, moko te akoki kokanga yango ; mpe oyo Ye akangi, moko te akoki kofungola yango.


Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, oyo azalaki, azali, mpe azali koya, azali Bule, Bule, Bule.


Moko te azali bule lokola Yawe ; moko te, bobele Yo. Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ