Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 99:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye ; azali Mosantu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 99:5
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi Davidi atelemaki mpe alobaki : — Boyoka ngai, bandeko na ngai mpe bato na ngai : Nazalaki na likanisi ya kotonga esika ya kopema mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe, enyatelo ya makolo ya Nzambe na biso ; bongo nabongisaki biloko mpo na kotonga yango.


Tika ete banetola Ye kati na lisanga ya bato mpe bakumisa Ye kati na mayangani ya bakambi.


Pamba te bolingo na Yo ezali monene koleka Lola, mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.


Ozali Nzambe na ngai, nasanzolaka Yo ! Ozali Nzambe na ngai, nanetolaka Yo.


Tokende na Ndako na Ye, togumbama liboso ya enyatelo makolo na yango.


pamba te okobengana bango tango okobwakela bango bambanzi ya tolotolo na Yo.


Tika ete bomoi na ngai emikumisa kati na Yawe ; tika ete banyokolami bayoka mpe basepela !


Tika ete Kombo na Yo ya monene mpe ya somo esanzolama ; ezali bule !


Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama na kotala na ngambo ya ngomba na Ye ya bule. Pamba te Yawe, Nzambe na biso, azali bule.


Yawe azali makasi na ngai, azali solo loyembo na ngai, azali mobikisi na ngai, azali Nzambe na ngai, nakokumisa Ye ; azali Nzambe ya tata na ngai, nakonetola Ye.


Na mokolo wana bokoloba : « Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye, bosakola misala na Ye kati na bikolo mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso.


Yawe, ozali Nzambe na ngai ; nakonetola Yo mpe nakosanzola Kombo na Yo ; pamba te na boyengebene na Yo ya kokoka, osalaki mabongisi ya kokamwa, makambo oyo obongisa wuta kala.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai. Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai ? Esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai ?


Bato na Ngai batingami kaka kopesa Ngai mokongo. Ata babengi bango ete bakende epai na Ye-Oyo-Aleki-Likolo, moko te kati na bango azali kopesa Ye lokumu.


« Yebisa lisanga mobimba ya bana ya Isalaele : ‹ Bozala bule, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na bino, nazali Bule.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ