Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 98:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko, boyemba banzembo ya esengo mpe bobeta mindule !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 98:4
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya kozongisa matondi. Bino nyonso bato ya mokili mobimba, boganga na esengo epai na Yawe !


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo. Bino bato ya mokili mobimba, bobetela Nzambe maboko !


Mokili mobimba efukamaka liboso na Yo ; bayembaka mpo na lokumu na Yo, basanzolaka Kombo na Yo. »


Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !


Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda mpo na boyengebene na Yo ; Mosantu ya Isalaele, nakobeta lindanda mpo na lokumu na Yo.


Boya, toganga na esengo mpo na Yawe ! Tobetela Libanga na biso maboko, pamba te azali Mobikisi na biso !


Tokende liboso na Ye elongo na mabondeli ya kozongisa matondi, tobetela Ye maboko elongo na banzembo.


Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo, pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! »


Tika ete esobe mpe bingumba na yango etombola mingongo, tika ete bamboka mike epai wapi Kedari avandaka esepela ! Tika ete bato ya Sela bayemba na esengo ; tika ete baganga wuta na likolo ya bangomba !


Oh Lola, yemba banzembo ya esengo, pamba te Yawe nde asali bongo ! Oh mozindo ya mokili, tombola mongongo ! Oh bino bangomba, bazamba mpe banzete nyonso kati na yango, boyemba banzembo ya elonga ! Pamba te Yawe asikolaki Jakobi, amonisi nkembo na Ye kati na Isalaele.


ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba : ‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.


Siona, mboka kitoko, yemba nzembo ! Isalaele, ganga makasi ! Yelusalemi, mboka kitoko, sepela ; mpe tika ete motema na yo etonda na esengo !


Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »


Sima na makambo wana, nayokaki lokola makelele ya bato ebele koganga kuna na Lola : « Aleluya ! Lobiko, nkembo mpe nguya ezali ya Nzambe na biso,


Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi ; ezalaki koganga : « Aleluya ! Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, atalisi bokonzi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ