Ye, Yawe, alobi : « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu mpo ete omema lobiko na Ngai kino na suka ya mokili. »
Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu, ba-oyo batatolaka kimia, ba-oyo bamemaka basango ya boboto, ba-oyo basakolaka lobiko, ba-oyo balobaka na Siona : « Nzambe na yo azali Mokonzi ! »
Natuna nanu : Boni, bayokaki te ? Iyo, bayokaki ! Pamba te ekomama : « Mingongo na bango eyokanaki na mabele mobimba, maloba na bango ekomaki kino na suka ya mokili. »
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya mawa, akosundola bino te, akobebisa bino te mpe akobosana te boyokani oyo asala na bakoko na bino tango alapaki ndayi.
Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.