Banzembo 97:7 - Mokanda na Bomoi7 Tika ete soni ekanga basambeli nyonso ya bikeko, bato oyo bamikumisaka mpo na banzambe ya lokuta ! Bino banzambe nyonso, bogumbama liboso na Ye ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzambe atalisaki bango ete sango oyo bango bazwaki mokumba ya kotatola ezalaki mpo na bango te, kasi ezalaki nde mpo na bino. Mpe sik’oyo, bozali koyoka sango yango na minoko ya bato oyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo ; mpe bango moko ba-anjelu bazalaka na posa ya koyeba yango.