Tango natalaki, namonaki mopepe moko ya makasi kowuta na ngambo ya nor ; bongo mopepe yango ezalaki komema mapata minene nzela moko na mikalikali ya kongenga makasi, mpe kati na yango ezalaki kongenga lokola ebende kati na moto.
Ebale ya moto ezalaki kobima mpe kotambola liboso na Ye. Minkoko ya bato bazalaki kosalela Ye, minkoko ya minkoko ya bato batelemaki liboso na Ye. Basambisi bavandaki, mpe babuku efungwamaki.
Yango wana, bino bopusanaki mpe botelemaki na ebandeli ya ngomba tango ezalaki kopela moto oyo ekomaki kino na likolo elongo na mapata ya mwindo mpe molili makasi.
Wuta na likolo, ayebisaki yo na mongongo na Ye mpo na koteya yo ; na se, Yawe alakisaki yo moto na ye ya monene mpe oyokaki mongongo na Ye kobima kati na moto.