12 Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe ; bosanzola Ye na kotatola bosantu na Ye.
Yawe, obimisaki ngai na mboka ya bakufi, obatelaki bomoi na ngai mosika na bato oyo bazali kokita na libulu.
Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye ; bokumisa Kombo na Ye ya bule.
Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe, bozala na esengo ! Bino nyonso oyo bozali na mitema alima, bobeta milolo ya esengo.
Opesaki na bato oyo batosaka Yo bendele mpo na koyebisa bango ete bakima liboso ya batolotolo ya banguna.
Bosepelaka tango nyonso kati na Nkolo ; nazongeli yango lisusu : bosepelaka !
Batata na biso bazalaki kopesa biso bitumbu mpo na mwa tango moke, ndenge mitema na bango ezalaki kolinga ; kasi Nzambe apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso, mpo ete tokoka kosangana na bosantu na Ye.