Bongo, pole na yo ekongenga lokola moyi ya tongo, mpe nzoto na yo ekokoma kolongono na lombangu ; bosembo na yo ekotambola liboso na yo mpe nkembo na Yawe ekokengela yo na sima.
Mpo na likambo ya Siona, nakokanga monoko na Ngai te ; mpo na likambo ya Yelusalemi, nakovanda kimia te, kino bosembo na ye emonana lokola kongenga ya pole, mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.
Lokola nasalaki masumu liboso ya Yawe, nakomema mokumba ya kanda na Ye kino tango akozwa likambo na ngai na maboko mpe akolongisa ngai. Akobimisa ngai na pole, mpe nakomona bosembo na Ye.
Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.
Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.