Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 97:1 - Mokanda na Bomoi

1 Yawe azali kokonza ! Tika ete mabele esepela ; tika ete ebele ya bisanga ezala na esengo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 97:1
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye.


Bosalela Yawe na kobanga mpe bosepela na kolenga.


Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.


Yawe azali kokonza ; tika ete bato balenga ! Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe ; tika ete mabele eningana !


Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.


Bisanga emoni yango mpe ekomi kobanga, basuka ya mabele ezali kolenga. Bazali kopusana, bazali koya pene ;


akolemba te mpe akotika te kino tango akotia bosembo na mokili. Bisanga ekotia elikya na mobeko na ye.


Boyoka ngai, bino bisanga ; boyoka maloba oyo, bino bikolo oyo ezali mosika : Yawe abengaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai, azalaki kolobela kombo na ngai wuta mbotama na ngai ;


Oh likolo, ganga na esengo ! Oh mabele, sepela ! Oh bangomba, boyemba banzembo ! Pamba te Yawe abondisi bato na Ye mpe ayokeli mawa bato oyo banyokwamaki.


Bosembo na ngai ezali pene, lobiko na ngai ebimi na lombangu, mpe maboko na ngai ekosambisa bikolo. Bisanga ekotalela ngai, ekozala na elikya na nguya ya loboko na ngai.


Solo, bisanga ekotalela Ngai ; bamasuwa ya Tarsisi ekozala na liboso, ekomema bana na yo ya mibali longwa mosika, elongo na palata mpe wolo, mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele ; pamba te apesi yo nkembo.


Nakotia elembo kati na bango mpe nakotinda, wuta na bikolo, ndambo ya bato oyo bakobika : na Tarsisi, na Puli mpe na Ludi (bato oyo bayebi kosalela tolotolo malamu), na Tubali mpe na Yavani, na bisanga oyo ezalaka mosika, oyo etikala nanu koyoka sango na Ngai te mpe komona nkembo na Ngai te. Bakotatola nkembo na Ngai kati na bikolo.


Babikisi bakomata na ngomba Siona mpo na koyangela bangomba ya Ezawu, mpe Yawe akokoma Mokonzi.


Yawe akoyokisa bango somo tango akobebisa banzambe ya bikeko nyonso ya mabele. Bato ya bikolo nyonso bakogumbamela Ye na bisika nyonso, moto na moto na esika oyo akozala kati na mokili na ye.


Yawe akozala Mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo wana, Ye moko kaka nde akozala Nkolo, mpe bakosambela kaka Ye.


Yoane azali ye oyo mosakoli Ezayi alobaki : « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike ! › »


tika ete Bokonzi na Yo eya, tika ete mokano na Yo esalema, awa na mokili ndenge esalemaka kuna na Likolo !


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


Tika ete bokonzi oyo eyei epambolama, bokonzi ya Davidi, tata na biso ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »


Akangolaki biso na bokonzi ya molili mpe amemaki biso kati na bokonzi ya Mwana na Ye ya bolingo,


na koloba : « Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, Yo oyo ozali mpe ozalaki, tozali kopesa Yo matondi ; mpo ete osalelaki nguya monene na Yo mpe okomaki kokonza.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ