Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.
Mpe ata soki makila na ngai ekoki kosopana lokola mbeka ya masanga na likolo ya mbeka oyo ezali mosala ya kondima na bino, nakozala na esengo mpo na yango mpe nakosepela elongo na bino nyonso.
Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka.
Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.