Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 96:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe ; bosanzola Yawe na kopanza sango ya nkembo mpe nguya na Ye !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 96:7
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babola bakolia mpe bakotonda ; bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye. Tika ete bozala na bomoi libela na libela.


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


« Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo, mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka ! »


Tika ete nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


Azalaki koloba na mongongo makasi : « Botosa Nzambe mpe bopesa Ye nkembo, pamba te tango na Ye ya kosambisa bato ekoki ! Bogumbamela Ye oyo akela likolo mpe mabele, ebale monene mpe bitima ya mayi ! »


Sima na makambo wana, nayokaki lokola makelele ya bato ebele koganga kuna na Lola : « Aleluya ! Lobiko, nkembo mpe nguya ezali ya Nzambe na biso,


Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi ; ezalaki koganga : « Aleluya ! Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, atalisi bokonzi na Ye.


Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene ; bango nyonso bazalaki koloba : « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpo na libela na libela ! »


Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.


na koloba : « Amen ! Tika ete masanzoli, nkembo, bwanya, matondi, lokumu, nguya mpe makasi ezala ya Nzambe na biso, mpo na libela na libela ! Amen ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ