Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 96:2 - Mokanda na Bomoi

2 Boyembela Yawe, bopambola Kombo na Ye ! Bopanza sango ya lobiko na Ye, mokolo na mokolo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 96:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki na bato nyonso : — Bopambola Yawe, Nzambe na bino ! Boye, bato nyonso bakumisaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, bagumbamaki mpe bafukamaki liboso ya Yawe mpe ya mokonzi.


Bopambola Yawe, bino ba-anjelu na Ye nyonso oyo bozali na nguya mpe botosaka mitindo na Ye.


Masanzoli. Nzembo ya Davidi. Nakotombola Yo, Nzambe na ngai, Mokonzi na ngai ; nakopambola Kombo na Yo seko na seko.


Yawe, misala na Yo nyonso ekumisaka Yo ! Tika ete bayengebene na Yo bapambola Yo !


Mikolo nyonso, nakopambola Yo mpe nakokumisa Kombo na Yo libela na libela.


Nasakolaka bosembo na Yo kati na mayangani, nakokanga monoko na ngai te ; Yawe, oyebi yango !


Monoko na ngai ekosakola tango nyonso misala ya bosembo mpe ya lobiko na Yo, pamba te nayebi motango na yango te.


Mata likolo ya ngomba, Siona, yo momemi sango malamu ; tombola mongongo na yo mpe ganga makasi, Yelusalemi, yo momemi sango malamu ; tombola yango penza, kobanga te ; loba na bingumba ya Yuda : « Botala Nzambe na bino ! »


Alobaki na bango : — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu.


Bandeko na ngai, bino oyo bozali bana ya Abrayami, mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, ezali epai na biso nde Nzambe atindaki maloba oyo ya lobiko.


Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.


Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene ; bango nyonso bazalaki koloba : « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpo na libela na libela ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ