Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela, ekosepela mpe ekoganga na esengo. Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimeli mpe ya Saroni ekopesamela yango ; boye bakomona nkembo ya Yawe, lokumu ya Nzambe na biso.
Oh Lola, yemba banzembo ya esengo, pamba te Yawe nde asali bongo ! Oh mozindo ya mokili, tombola mongongo ! Oh bino bangomba, bazamba mpe banzete nyonso kati na yango, boyemba banzembo ya elonga ! Pamba te Yawe asikolaki Jakobi, amonisi nkembo na Ye kati na Isalaele.
Oh likolo, ganga na esengo ! Oh mabele, sepela ! Oh bangomba, boyemba banzembo ! Pamba te Yawe abondisi bato na Ye mpe ayokeli mawa bato oyo banyokwamaki.