Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 95:3 - Mokanda na Bomoi

3 Pamba te Yawe azali Nzambe Monene, azali Mokonzi Monene, na likolo ya banzambe nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 95:3
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Esidrasi akumisaki Yawe, Nzambe Monene ; mpe bato nyonso batombolaki maboko na bango mpe bazongisaki : « Amen  ! » Bongo bafukamaki mpe bakitisaki bilongi na bango kino na se mpo na kogumbamela Yawe.


Eh molimo na ngai, pambola Yawe ! Yawe, Nzambe na ngai, ozali monene ! Olata kongenga mpe lokumu,


Solo, ngai nayebi malamu ete Yawe azali monene, ete Nkolo na biso aleki banzambe nyonso.


Yawe azali monene, abongi na lokumu ; moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye.


Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko ! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.


Tala ndenge nini Yawe, Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo ! Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.


Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.


Pamba te, na mokili mobimba, Yo nde Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; oleki banzambe nyonso.


Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito ; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama ; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe.


Nandimi sik’oyo ete Yawe azali monene koleka banzambe nyonso, pamba te asali makambo ya lolenge oyo epai ya banyokoli ya Isalaele.


Bolenga te, bobanga mpe te. Boni, natatolaki yango te ? Nasakolaki yango te wuta kala ? Bozali batatoli na Ngai. Boni, ezali na nzambe mosusu pembeni na Ngai ? Te, ezali na Libanga mosusu te, nayebi ata moko te. »


Lokola Ngai nazali na bomoi, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « monguna oyo azali lokola ngomba Tabori kati na bangomba, lokola ngomba Karimeli pembeni ya ebale monene, azali koya !


Mokili ya Moabi ekobebisama, mpe bakobotola bingumba na yango na makasi ; bilenge mibali oyo Moabi etielaka motema bakokufa na mopanga, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


« Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela ! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai.


to na kombo ya mokili, pamba te mokili ezali enyatelo makolo ya Nzambe ; to mpe na kombo ya Yelusalemi, pamba te Yelusalemi ezali engumba ya Mokonzi Monene.


Kolenga te liboso na bango, pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe Monene mpe ya somo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ