« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, na nzela ya konyokola bato mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »
Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abomaki biso ; solo, atiaki biso na mobulu, akomisaki biso lokola mbeki ya pamba ; amelaki biso ndenge nguma emelaka nyama, atondisaki libumu na ye na biloko na biso ya kitoko ; mpe sima, asanzaki biso.