Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 94:20 - Mokanda na Bomoi

20 Boni, bokonzi ya mabe oyo ememelaka bato pasi na nzela ya mibeko na yango ; boni, ezali lisanga moko elongo na Yo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 94:20
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jeroboami akataki ete basalaka feti mibu nyonso na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe ndenge basalaka na mokili ya Yuda, mpe abonzaki mbeka na etumbelo. Asalaki ndenge wana na Beteli epai wapi abonzaki mbeka epai ya banzambe ya bikeko ya bana ngombe oyo asalaki, mpe atiaki banganga-nzambe na bisambelo oyo abongisaki na likolo ya bangomba.


Nzambe alobi na moto mabe : « Mpo na nini opanzaka sango ya mibeko na ngai mpe olobaka na tina na Boyokani na ngai ?


Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Ezali solo ete bolobaka te tango bokataka makambo ? Boni, bana na moto, bosambisaka na bosembo ?


Nzembo ya Azafi. Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye, azali kokata makambo kati na banzambe.


Moto oyo akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka mobeko, libondeli na ye ekomaka nkele na miso ya Nzambe.


Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi : ezala na esika oyo basambisaka bato, mabe ezali kaka ; ezala na esika ya bosembo, mabe ezangaka te.


Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.


Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo, na ba-oyo bakomaka mibeko oyo enyokolaka bato !


Bozali kozongisa mokolo ya pasi sima mpe komibendela bokonzi ya somo.


Lokola obatelaki malako ya Omiri mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, nakokaba yo mpo ete obebisama, nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ; bongo bokolata soni ya libota na Ngai.


Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basilaki kopesa mitindo ete moto nyonso oyo akoyeba esika oyo Yesu azali, ayebisa bango mpo ete bakanga ye.


Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika.


Baboti na ye balobaki bongo mpo ete bazalaki kobanga Bayuda, pamba te Bayuda basilaki kozwa mokano ya kobengana, na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Klisto.


Saulo alobaki : — Yoka sik’oyo, mwana mobali ya Ayitubi. Ayimeleki azongisaki : — Nazali koyoka yo, nkolo na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ