Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 94:2 - Mokanda na Bomoi

2 Mosambisi ya mokili, telema mpo na kozongisela bato ya lolendo mabe na mabe na bango !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 94:2
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?


Oh Nzambe na biso, okosambisa bango te ? Pamba te tozali na makasi te ya kotelemela mampinga minene oyo ezali koya kobundisa biso, mpe toyebi te tosala nini ! Miso na biso ezali kotalela kaka Yo. »


Kati na kobanga na ngai, namilobelaki : « Obengani ngai penza mosika na Yo ! » Nzokande oyokaki ngai wana nazalaki kobondela Yo mpe wana nazalaki kobelela Yo.


Likolo ekopanza sango ya bosembo na Ye, pamba te azali Nzambe ya bosembo.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Loyembo.


wana tika ete monguna na ngai alanda mpe akanga ngai, tika ete asakanela bomoi na ngai mpe abebisa lokumu na ngai.


Oh Nzambe, telema mpe lobela Kombo na Yo ! Kanisa lisusu ndenge nini bazoba bafingaka Yo mikolo nyonso !


Nzambe, telema, sambisa mokili ; pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.


Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.


Lolendo ya moto ekosila mpe lofundu ya bato ekosuka ; Yawe kaka nde akonetolama na mokolo wana.


Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ? Nani oyo omatiselaki mongongo mpe otalaki na miso ya lolendo ? Mosantu ya Isalaele !


Lokola otombokelaka Ngai, mpe lofundu na yo ekomi kino na matoyi na Ngai, nakotia lopete na Ngai na zolo na yo, nakokanga yo singa na bibebu ndenge bakangaka mpunda monoko, mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyelaki.


« Na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakobebisa bashar mpe bampunda ya mokili na yo,


Pamba te biso nyonso tokosamba liboso ya esambiselo ya Klisto mpo ete moto nyonso azwa lifuti oyo ekoki na ye kolanda makambo oyo asalaki na nzela ya nzoto na ye, makambo ya malamu to ya mabe.


Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ