Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 94:16 - Mokanda na Bomoi

16 Nani akotelema mpo na ngai mpo na kotelemela bato mabe ? Nani akokotela ngai liboso ya bato ya misala mabe ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 94:16
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango alongwaki kuna mpe akutanaki na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, oyo abandaki koya kokutana na ye, Jewu apesaki ye mbote mpe alobaki : — Boni, motema na yo ezali sembo mpo na ngai, ndenge motema na ngai ezali mpo na yo ? Yonadabi azongisaki : — Iyo, ezali bongo ! Jewu alobaki : — Soki ezali bongo, pesa ngai loboko na yo. Boye, Yonadabi asalaki bongo, mpe Jewu asungaki ye mpo na komata na shar.


Jewu atombolaki miso na ngambo ya lininisa mpe agangaki : — Nani kati na bino azali na ngambo na ngai, nani ? Bakengeli mibale to misato ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, batalaki Jewu wuta na lininisa.


Nazwaki mokano ya kopamela bakambi mpe bankumu ; nalobaki na bango : — Tango bodefisaka bandeko na bino, bosengaka bango mileki ! Bozali nde komemisa bandeko na bino moko mokumba monene boye ! Nabengisaki mayangani moko ya monene mpo na kolobela makambo yango elongo na bango.


Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te ; bato bakoki kosala ngai nini ?


Yawe, telema, kutana na bango mpe bebisa bango ; na nzela ya mopanga na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato mabe.


Oh Nzambe na ngai, kangola ngai wuta na maboko ya banguna na ngai ; batela ngai liboso ya banyokoli na ngai.


Amoni ete ezali ata na moto moko te, akamwe ete ata molobeli moko te azali. Boye, loboko na Ye moko ememi Ye na lobiko, mpe bosembo na Ye elendisi Ye.


Natalaki, kasi namonaki moto te oyo akosunga ; nakamwaki ete moto azalaki te mpo na kosunga ngai ! Bongo, loboko na ngai moko ebikisaki ngai, mpe kanda na ngai ya makasi esungaki ngai.


« Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi, botala zingazinga mpe bososola malamu penza, boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; soki bokoki komona ata moto moko oyo atambolaka na bosembo mpe alukaka boyengebene, wana nakolimbisa engumba oyo.


Nalukaki ata moto moko kati na bango, oyo akokaki kotonga mir mpe kotelema liboso na Ngai, na lidusu ya mir mpo na bolamu ya mokili mpo ete nakoka kobebisa yango te, kasi namonaki ata moto moko te.


Tango nyonso Sanduku ezalaki kokende, Moyize azalaki koloba : « Oh Yawe, telema ! Tika ete banguna na Yo bapalangana ! Tika ete banguna na Yo bakima liboso na Yo ! »


Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka.


Boye, tosengeli kosunga bato ya lolenge oyo mpo ete tosangana na bango na makambo oyo bazali kosala mpo na solo.


Bolakela mboka ya Merozi mabe, elobi anjelu ya Yawe. Bolakela, bolakela mabe bato oyo bavandi kuna ! Pamba te bayei te kosunga Yawe ; bayei te kosunga bilombe ya bitumba !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ