12 Yawe, esengo na moto oyo ozali kozongisa na nzela, moto oyo ozali kolakisa mibeko na Yo
Esengo na moto oyo Nzambe apameli ! Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
Liboso ete obeta ngai, nazalaki mopengwi ; kasi sik’oyo, nakomi kotosa liloba na Yo.
Ezalaki penza malamu mpo na ngai ete obeta ngai, mpo ete nayekola mitindo na Yo.
Boyoka ! Yawe azali kobelela na engumba ! Kotosa Kombo na Ye, yango nde kozala na bwanya. Boyoka sango ya etumbu na bino na monoko na Ye oyo atindi yango !
Nzokande, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili.
Boye sosola ete Yawe, Nzambe na yo, azalaki koteya yo ndenge tata ateyaka mwana na ye.
Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.