Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 94:10 - Mokanda na Bomoi

10 Ye oyo apesaka bikolo etumbu akoki kopesa etumbu te ? Ye oyo apesaka bato boyebi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 94:10
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya ! Koboya mabe, yango nde mayele ! »


Kasi soki avandi kimia, nani akokweyisa Ye ? Soki abombi elongi na Ye, nani akoki komona Ye ? Nzokande, akengelaka bikolo mpe bato


Ye oyo ateyaka biso koleka banyama ya mokili mpe akomisaka biso mayele koleka bandeke ya likolo, azali wapi ? ›


Yawe azali Mokonzi mpo na seko, bapagano bakozala lisusu te kati na mokili na Ye.


Teya ngai bolamu ya bososoli mpe ya mayele, pamba te namipesaka na mibeko na Yo.


mpo na kozongisa mabe na mabe ya bikolo mpe kopesa bato etumbu ;


Nzambe, toyokaki na matoyi na biso ; bakoko na biso babetelaki biso lisolo ya makambo oyo osalaki na tango na bango, na tango ya kala.


Pamba te, okataki likambo na ngai mpe olongisaki ngai, ovandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mosambisi ya sembo.


Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli.


Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.


Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi. Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.


Nzambe na ye ateyaka ye mpe alakisaka ye nzela oyo asengeli kolanda.


Boye, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.


Yawe akoteya bana na yo nyonso, mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.


Sopa kanda na Yo likolo ya bikolo ya bapaya oyo endimaka Yo te, likolo ya bato oyo babelelaka Kombo na Yo te, pamba te babebisi Jakobi, babebisi ye mobimba mpe bapanzi mokili na ye.


Nakomonisa lokumu na Ngai kati na bikolo ; bongo bikolo nyonso ekomona etumbu oyo napesi bango, mpe loboko na Ngai oyo nasemboli likolo na bango.


« Bozali etuka moko kaka oyo Ngai napona kati na bituka nyonso ya mabele ; yango wana nakopesa bino etumbu mpo na mabe nyonso oyo bosali.


Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli ? Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, okufaka te. Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso ; mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango mpo na kopesa biso etumbu.


Na kanda, otambolaka na mabele ; mpe na kanda makasi na Yo, onyataka bikolo.


Tala ndenge ekomama kati na mikanda ya Basakoli : « Nzambe akoteya bango nyonso. » Boye moto nyonso oyo ayokaka Tata mpe ayambaka mateya na Ye ayaka epai na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ