4 Yawe azali monene makasi, na bisika ya likolo ; aleki lokito ya mayi minene, mpe bambonge milayi ya ebale monene.
tango nalobaki : ‹ Okosuka kino awa, kasi mosika te ; awa nde ekosukela mbonge ya lolendo na yo ? ›
Mongongo ya Yawe ezali na nguya ; mongongo ya Yawe ezali na lokumu mingi.
Alendisaka bangomba, na nguya na Ye ; atondi na mpiko.
Yawe, Lola esanzolaka misala na Yo ya kokamwa mpe bosembo na Yo kati na lisanga ya basantu.
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, nani azali na nguya lokola Yo ? Nani, oh Yawe ? Boyengebene na Yo ezingeli Yo.
Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela.
Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe ? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.